Tshopo : Lomoyo Iteku, Papa leki ya province ayoki solo ya pouvoir.

Makwapa Solo
0


Tovandi nabiso kaka boye tomoni ba photo ebimi biiiim, Mokitani ya mokonzi ya etuka oyo bazo benga ye mikolo oyo papa leki Didier Lomoyo wa Iteku ayoki mukusa ya pouvoir amateli mapeka solo ya ba jeunes moko boye, minu nyoso libanda asali misapi V soki ya victoire soki ya voiture toyebi te.

MAKWAPA SOLO toyoki solo ya désordre kuna, tokiti na balabala to tuni, bato mibale to misatu boye : eza kasi nini na papa leki provincial ?

Yoka response :

Teeeeen, papa leki ayoki mukusa ya pouvoir, boyebi nini ?
Mokolo wana le 27 octobre, azalaki ko kanga misapi batuta kaa Papa ya province, mutu wana ya suki ebele, motion alungwa atikala na province na maboko.

Moins de 24 après motion ya lokuta wana contre papa ya province mutu ya suki ebele wana, yewana papa leki, abengisi batu nyoso ya gouvernorat kuna alobeli bango : Ngai Lomoyo wa Iteku nakomi Papa ya province, soki bosali fweeen, bolongwe. Et puis yo assistant principal pesa nga cachet ya province wana mbangu sinon okotutama mabé pe okolela père na mère nayo.

Assistant ya Papa ya province, ayoki tension yewana akimi mbangu a déserté bureau, kobanga bibotu oyo papa leki alaki ye.

Papa leki akoti méchant mabé, ayoki douleur profondément namotema neti bato nyoso bazalaki koloba que aza Gouverneur étiquette po azangi cachet.

Biiimmmm, télégramme ebimi.

Papa leki provincial, Didier Lomoyo wa Iteku, asali jeûne ya 48 po télégramme ebima po balobela ye ke aza intérimaire , mais makambu balobaki na télégramme wana, batu nyoso batangaki likolo likolo sans ko décortiquer véritable signification ya document wana, mais etali biso te.

Sikoyo, Papa leki provincial Didier Lomoyo wa Iteku, azui change akiti kinshasa par invitation ya VPM ya intérieur. Kuna a trouvé opportunité yako kende koloba partout naba bureau ya l'État que Papa ya province, mutu ya suki ebele wana, azalaki mabe, afutaka ye te, ke soki ba aidé ye, akobanda kotindela bango na Kinshasa kuna mbongo ya dgrpt po azo changé DG nango

Kindoki emonani pwasa.
Mais etali biso te, po soki adulte alobi abima tshor, ya biso nini ?

MAKWAPA SOLO atuni lisusu bato misatu to minei : Sikoyo ekomi nini kuna dictature?

Yoka eyano : Boyebi que azalaki notifié na communiqué ya assemblée provincial asala intérim? 

Tozuaki copie ya communiqué wana nzoka eza nde président ya assemblée provinciale nde asaleli papa leki mokanda wana neti ye aza yako konda pe papa leki aza ya konda pe, match nul.

Nde basali cop po bayiba mbongo ya dgrpt na ngonga mwa mokye oyo bazuaki.

Nako zongela likambu oyo na partie 2

MAKWAPASOLO | SANS GANTS

Post a Comment

0 Comments
Post a Comment (0)

#buttons=(Accept !) #days=(20)

Our website uses cookies to enhance your experience. Check Out
Accept !
To Top