Ba frappé Didier Lomoyo : Boyokani ya Pamba, Motema Mabe mpe moyibi ya Mbongo na Polele

Makwapa Solo
0


Mokolo ya mitano 13 novembre, Kisangani asalaki Didier Lomoyo likambo oyo ezali lokola kobwaka mbindo na elongi ya moto. Vice-gouverneur ya intérim oyo azalaka kolia lokuta ya ba conseillers na ye, ayei lokola mokonzi ya masanga… kasi azwaki pampa, molili, pasi, mpe kimia ya kokangama motema.

Mobilisation ? Eloko moko te.
Population ? Ezalaki komona misala na bango.
Bana mboka ? Bazalaki ata kondima te kofanda mpo na kotala ye.
Ayei na lolendo… bakutisi ye na rien.

Pe eloko ya mawa koleka :
82 MILLIONS YA FRANCS babimisi na état de besoin — balobaki ezali mpo na « réception ya makasi ».
Résultat ?
RÉCEPTION YA ZÉRO.
Réception ya ba fantômes.
Réception ya honte.

Tokoki kosala politique te :
oyo ezali détournement ya kombi. Ba collaborateurs na ye batumbolaki mbongo ya mboka lokola ba mbwa ya bitumba.
Bayibaki mbongo ya mobilisation, balobaki makambo ya lokuta, balobaki ba chiffres ya bilogo — mpe ndeko Lomoyo, oyo azali na posa ya bokonzi koleka biloko nyonso, asalaki ndoki na ntina te.

Tango ayei, bato ya Kisangani bazalaki kotalana na boye :
« Oyo nde nani ? To oyo ayei kosala nini awa ? »

Ezungeli kaka na motuya moko :
Lomoyo azali rien na terrain. Rien. Azangaki base, azozangisa base, mpe akobima sans base.

Ayei na intérim te : ayei kaka kosomba ntango mpo akawuka nionso liboso ya Cour constitutionnelle

Tika tokanisela makambo na polele : voyage oyo azongeli na Kisangani ezali mission ya kobeta mosapi na caisse.
Ayei te mpo na leadership.
Ayei te mpo na vision.
Ayei mpo na kozua oyo akoki nionso kozua na mikolo ya nsuka.

Alingi kobima na pouvoir te liboso akawuka biloko ya bureau, ya budget, ya signature.
Azali kopanzana ndenge ya motu ya mboka oyo ayebi ete mosika ezali te.
Azali lokola moto oyo azali kokima poussière ya Cour constitutionnelle, azali naino koluka ata motuya ya kosala kitoko te.

Kisangani emonisi makambo : peuple alingi ye te.
Peuple aboyi komipesa lokola figurants ya ba politiciens ya nzala.
Ata mbongo ya détournement ekokaki kosomba foule te.

YANGO OYO EZALI VERDICT :
LOMOYO ASILI.
POUVOIR NA YE ESILI.
IMAGE NA YE ESILI.
MBONGO BA COLLABORATEURS NA YE BALIOLI.
PEUPLE ABANDONI YE.

Mokolo ya 13 novembre ekotikala lokola mokolo ya kobimisama ya vérité :
Lomoyo, mokonzi ya intérim, akomi mopaya na terrain, lokuta na makolo, mpe politicien ya suka-suka.

MAKWAPA SOLO | SANS GANTS

Post a Comment

0 Comments
Post a Comment (0)

#buttons=(Accept !) #days=(20)

Our website uses cookies to enhance your experience. Check Out
Accept !
To Top